Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:16 - Mokanda na Bomoi

16 Babimaki na midi na tango Beni-Adadi elongo na bakonzi tuku misato na mibale, oyo bazalaki na ngambo na ye, bazalaki kolangwa masanga na bandako na bango ya kapo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:16
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki lisusu na nzela ya mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha mpe ndako na ye, mpo na makambo mibale oyo : ya liboso, mpo na mabe nyonso oyo asalaki na miso ya Yawe, na kopelisa kanda ya Yawe na nzela ya misala na ye kino kokoma ndenge moko na libota ya Jeroboami ; ya mibale, mpo ete asilisaki koboma bato nyonso ya libota ya Jeroboami.


Zimiri, mokonzi ya mampinga oyo azalaki kokamba ndambo ya bashar na ye, asalelaki ye likita. Na tango wana, mokonzi Ela azalaki na Tiritsa komela mpe kolangwa masanga na ndako ya Aritsa, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, kuna na Tiritsa.


Akabi abengisaki bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike ; bango nyonso bazalaki bato nkama mibale na tuku misato na mibale. Asangisaki lisusu bato ya Isalaele oyo batikalaki : bazalaki bango nyonso bato nkoto sambo.


Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki bato ya liboso. Nzokande Beni-Adadi azwaki sango epai ya banongi na ye oyo balobaki na ye : — Bato bazali kopusana wuta na engumba Samari.


Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda, tuku misato na mibale, oyo batambolisaka bashar : « Bobundisa moto moko te, azala moke to monene ; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele. »


Vino elobisaka bato maloba ya soni, masanga ya makasi ememaka mobulu ; moto nyonso oyo amipesaka na yango akotikala te kokoma moto ya bwanya.


Mawa na bato oyo bakenda sango ya komela vino mpe ya kosangisa masanga ya makasi :


Soki babundisi yo, ekowuta epai na Ngai te ; moto nyonso oyo akobundisa yo akokweya liboso na yo.


mpo na komipesa na kindumba, na masanga ya vino ya kala mpe ya sika oyo elongolaka bato bososoli.


Yango wana bokozala bato ya liboso mpo na kokende na bowumbu, mpe bafeti ya bato oyo bamivandisaka na bakiti ya kitoko ekosila.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ