Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:14 - Mokanda na Bomoi

14 Akabi atunaki : — Kasi nani akosala yango ? Mosakoli azongisaki : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike nde bakosala yango. » Akabi atunaki : — Nani akobanda etumba ? Mosakoli azongisaki : — Ezali yo nde moto okobanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:14
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mbala ya sambo, mosali na ye alobaki : — Tala, lipata moko ya moke lokola loboko ya moto ezali kobima wuta na ebale monene. Boye Eliya alobaki : — Kende koyebisa Akabi : « Bongisa shar na yo noki mpe zonga na ndako na yo, noki te mvula ekokanga yo na nzela. »


Na tango wana kaka, mosakoli moko ayaki epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpe alobaki na ye : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ozali komona mampinga monene oyo ? Nakopesa yango lelo na maboko na yo, bongo okoyeba ete nazali Yawe. »


Akabi abengisaki bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike ; bango nyonso bazalaki bato nkama mibale na tuku misato na mibale. Asangisaki lisusu bato ya Isalaele oyo batikalaki : bazalaki bango nyonso bato nkoto sambo.


Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki bato ya liboso. Nzokande Beni-Adadi azwaki sango epai ya banongi na ye oyo balobaki na ye : — Bato bazali kopusana wuta na engumba Samari.


Boye, Davidi alongaki moto ya Filisitia na nzela ya ebambelo mabanga na ye mpe na nzela ya libanga moko. Davidi abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye, azalaki ata na mopanga te na loboko na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ