Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 20:11 - Mokanda na Bomoi

11 Mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Boloba na ye : « Moto oyo alati bibundeli asengeli komikumisa te lokola moto oyo alongoli bibundeli ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 20:11
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, sima na bato nyonso ya Moabi koyoka sango ete bakonzi bayei kobundisa bango, babengaki bato nyonso, bilenge mpe mikolo oyo bakoki komema bibundeli, mpe batelemisaki bango na mondelo ya mboka.


Ekangama moko na mosusu, mpe mopepe ekoki koleka kati na yango te.


Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.


Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi : mimekano ezalaka kaka te mpo na moto oyo aleki mbangu, bitumba ezalaka kaka te mpo na bato ya makasi, bilei ezalaka kaka te mpo na bato ya bwanya, bomengo ezalaka kaka te mpo na bato oyo baleki na mayele, mpe bolamu ezalaka kaka te mpo na bato ya bososoli ; pamba te pasi mpe bisengo ekomelaka mpe bango nyonso.


Kuna, bakokoma koganga : ‹ Faraon, mokonzi ya Ejipito, atiaka kaka makelele ya pamba, akoki na ye makambo te ! ›


Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili ; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe.


Bongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.


Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : — Yaka ! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ