1 Bakonzi 2:7 - Mokanda na Bomoi7 Kasi talisa bolamu epai ya bana mibali ya Barizilayi, moto ya Galadi ; mpe sala ete bazala kati na bato oyo bakobanda kolia mesa moko elongo na yo, pamba te basungaki ngai tango nazalaki kokima Abisalomi, ndeko na yo ya mobali. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale.