Jakobi azongisaki : — Te ! Mwana na ngai akokende elongo na bino te. Ndeko na ye ya mobali akufa ; natikala kaka na ye. Soki likama ekweyeli ye na mobembo oyo bozali kokende, wana bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai !
Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye.
Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »
Kasi talisa bolamu epai ya bana mibali ya Barizilayi, moto ya Galadi ; mpe sala ete bazala kati na bato oyo bakobanda kolia mesa moko elongo na yo, pamba te basungaki ngai tango nazalaki kokima Abisalomi, ndeko na yo ya mobali.
Kasi sik’oyo, kozwa ye te lokola moto oyo asali mabe te. Ozali na bwanya, okoyeba nini osengeli kosala mpo na ye. Kitisa suki na ye ya pembe kati na makila, na mboka ya bakufi. »
nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo.
Mpo na yango, nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo. » Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.
Kuna, ekozala lisusu na mwana moke te oyo akokufa na bomwana na ye to ekozala lisusu na mobange te oyo akotonda te na mikolo ya bomoi na ye ; pamba te moto oyo akokufa elenge akozala na mibu nkama moko ya mbotama, mpe oyo akokokisa mibu wana te, akomonana lokola moto alakelami mabe.