1 Bakonzi 2:5 - Mokanda na Bomoi5 Sik’oyo, yo moko oyebi makambo oyo Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asalaki ngai ; makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya mampinga ya Isalaele : Abineri, mwana mobali ya Neri ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri. Abomaki bango, asopaki makila ya bitumba na tango ya kimia ; boye, atiaki makila ya bitumba na mokaba oyo alataki na loketo na ye, mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi moto yango azongiselaki Joabi : — Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki : « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. »
Amasa azalaki na bokebi te mpo na kotala mopanga oyo ezalaki na loboko ya mwasi ya Joabi. Bongo Joabi atobolaki ye libumu, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki kino na se ; mpe Amasa akufaki mbala moko. Joabi azalaki te na tina na kotuba ye mopanga na mbala ya mibale. Boye Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, balandaki Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.