Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 2:37 - Mokanda na Bomoi

37 Mokolo oyo okobima mpe okokatisa lubwaku ya Sedron, okokufa, mpe makila na yo ekotangama na moto na yo moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 2:37
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango : « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi : ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › »


Tango bato nyonso bazalaki koleka, mboka mobimba ezalaki kolela makasi. Mokonzi akatisaki lubwaku ya Sedron, mpe bato nyonso bakendeki na nzela oyo ekenda na esobe.


Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi ; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron.


Mokonzi apesaki ye mitindo : — Sala ndenge alobi ; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba.


Tika ete ngambo ya makila na bango ezala mpo na libela likolo ya moto ya Joabi mpe ya bana na ye. Kasi tika ete kimia ya Yawe ezala mpo na libela na Davidi, na bana na ye, na libota na ye mpe na kiti na ye ya bokonzi.


Shimei azongiselaki mokonzi : — Makambo oyo olobi ezali malamu ! Mowumbu na yo akosala ndenge mokonzi, nkolo na ngai, alobi. Shimei avandaki na Yelusalemi mikolo ebele.


Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe likonzi ya nzambe mwasi Ashera, mpe amemaki yango na lubwaku ya Sedron, libanda ya Yelusalemi, epai wapi batumbaki yango. Akomisaki yango putulu mpe asopaki yango na kunda epai wapi bakundaka bato ebele na libulu moko.


Banganga-Nzambe bakotaki kati na Tempelo ya Yawe mpo na kopetola yango : babwakaki kati na lopango ya Tempelo ya Yawe biloko nyonso ya mbindo oyo bamonaki kati na yango. Balevi balokotaki mpe bamemaki yango kino na lubwaku ya Sedron.


Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este ; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »


adefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo ; boni, mwana ya lolenge oyo akoki solo kozala na bomoi ? Te, akozala na bomoi te ! Mpo ete asalaki makambo wana nyonso ya mbindo, basengeli koboma ye, mpe makila na ye ekotangama na moto na ye moko !


Moto nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, esengeli baboma ye ; pamba te alakeli tata na ye to mama na ye mabe : makila na ye ekotangama na moto na ye moko.


Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.


Soki moto moko abimi libanda ya ndako na yo mpe akei na balabala, makila na ye ekotangama na moto na ye moko ; ekozala ngambo na biso te. Kasi soki babomi moto moko kati na bato oyo bakozala kati na ndako na yo, wana makila na ye ekotangama na mito na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ