Kasi mokonzi alobaki : — Asengeli kokende na ndako na ye ; asengeli te komona elongi na ngai. Boye Abisalomi akendeki na ndako na ye, mpe amonaki elongi ya mokonzi te.
Boye, mokonzi Salomo atindaki bato mpo na kokitisa ye wuta na etumbelo. Bongo Adoniya ayaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi Salomo, mpe Salomo alobaki na ye : — Zonga na ndako na yo.