Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 2:35 - Mokanda na Bomoi

35 Mokonzi akomisaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi, mpe atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki na esika ya Abiatari.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 2:35
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi abengisi te ngai, mosali na yo ; Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mpe Salomo, mosali na yo.


mokonzi alobaki na bango : — Bozwa elongo na bino basali ya mokonzi na bino mpe bomatisa Salomo, mwana na ngai ya mobali, na likolo ya mile na ngai ya mwasi. Bokende elongo na ye na etima ya Giyoni !


Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni.


Boye, Salomo alongolaki Abiatari na mosala na ye ya Nganga-Nzambe ya Yawe, mpo na kokokisa maloba oyo Yawe alobaki na Silo na tina na libota ya Eli.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki mokonzi ya mampinga ; Tsadoki mpe Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ;


Davidi abengaki Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari elongo na Balevi oyo : Urieli, Asaya, Joeli, Shemaya, Elieli mpe Aminadabi.


Tala ndenge Davidi akabolaki bango kolanda misala oyo bapesaki bango : Tsadoki, na etuka ya Eleazari ; Ayimeleki, na etuka ya Itamari.


Mpo na sanza ya misato : lisanga ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; lisanga yango ezalaki na mibali nkoto tuku mibale na minei.


Baliaki mpe bamelaki liboso ya Yawe na esengo na mokolo wana, mpe batatolaki mpo na mbala ya mibale ete Salomo, mwana mobali ya Davidi, azali mokonzi. Bapakolaki ye mafuta mpo ete azala mokonzi ; mpe Tsadoki, mpo ete azala Nganga-Nzambe.


mwana mobali ya Shalumi, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi,


Abomaka bato ya makasi ata soki aluki koyeba tina te mpe atiaka bato mosusu na esika na bango.


Tika ete mikolo ya bomoi na ye ekoma moke, tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye !


mpe shambre oyo etala na ngambo ya nor ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala ya etumbelo. Kati na bakitani ya Levi, bana mibali ya Tsadoki kaka nde bakoki kokota na Tempelo mpo na kosala mosala liboso ya Yawe. »


Okopesa mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi ya libota ya Tsadoki mpe babelemaka liboso na Ngai mpo na kosalela Ngai, elobi Nkolo Yawe ;


Nzokande, ekomama boye kati na buku ya banzembo : « Tika ete ndako na ye etikala polele, mpe tika ete moto moko te avanda kati na yango ! » Mpe : « Tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye ! »


Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ