Mokonzi apesaki ye mitindo : — Sala ndenge alobi ; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba.
Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, oyo babengaka elanga ya Uza. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Bato ya Yuda balobaki na Samison : — Toyei mpo na kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko ya bato ya Filisitia. Samison alobaki na bango : — Bolapa ndayi liboso na ngai ete bokoboma ngai te bino moko.