1 Bakonzi 2:32 - Mokanda na Bomoi32 Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sik’oyo, yo moko oyebi makambo oyo Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asalaki ngai ; makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya mampinga ya Isalaele : Abineri, mwana mobali ya Neri ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri. Abomaki bango, asopaki makila ya bitumba na tango ya kimia ; boye, atiaki makila ya bitumba na mokaba oyo alataki na loketo na ye, mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye.
Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te ; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi : Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi ; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye.