31 Mokonzi apesaki ye mitindo : — Sala ndenge alobi ; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba.
Sima na yango, tango kaka Davidi ayokaki sango ya makambo oyo ewutaki kosalema, alobaki : — Na miso ya Yawe, ngai mpe bokonzi na ngai tozali na ngambo te mpo na libela na tina na makila ya Abineri, mwana mobali ya Neri.
Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba ! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei.
Benaya akotaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe alobaki na Joabi : — Mokonzi alobi ete obima. Kasi Joabi azongisaki : — Te, nakokufela kaka awa ! Benaya azongaki epai ya mokonzi mpo na koyebisa ye eyano ya Joabi.
‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.
Tango bavandi ya esanga bamonaki nyoka ezali kodiembela na loboko ya Polo, balobanaki bango na bango : — Solo, moto oyo azali penza mobomi ! Awuti kobika na likama ya ebale, kasi bosembo ya Nzambe elandi ye kaka mpo na koboma ye !