29 Bayebisaki Salomo ete Joabi akei na Ndako ya kapo ya Yawe mpe azali pembeni ya maseke ya etumbelo. Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, ete akende koboma ye.
Benaya akotaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe alobaki na Joabi : — Mokonzi alobi ete obima. Kasi Joabi azongisaki : — Te, nakokufela kaka awa ! Benaya azongaki epai ya mokonzi mpo na koyebisa ye eyano ya Joabi.
Mokonzi apesaki ye mitindo : — Sala ndenge alobi ; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba.
Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! » Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.
Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe ?