Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 2:25 - Mokanda na Bomoi

25 Mokonzi Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, kobeta Adoniya ; mpe Adoniya akufaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 2:25
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Davidi abengaki moko kati na basoda na ye mpe alobaki : « Yaka, boma ye ! » Mpe soda yango abomaki ye.


Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo.


Boye Davidi apesaki mitindo ; mpe bato na ye babomaki bango, bakataki bango maboko mpe makolo mpe badiembikaki bango pembeni ya liziba ya Ebron. Bazwaki moto ya Ishi-Bosheti mpe bakundaki yango kati na kunda ya Abineri, na Ebron.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe.


Bayebisaki Salomo ete Joabi akei na Ndako ya kapo ya Yawe mpe azali pembeni ya maseke ya etumbelo. Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, ete akende koboma ye.


Mokonzi apesaki ye mitindo : — Sala ndenge alobi ; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, akendeki kobeta Joabi mpe abomaki ye. Bakundaki ye na ndako na ye moko, kati na esobe.


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Benaya abimaki, abetaki Shimei, mpe Shimei akufaki. Bokonzi elendisamaki na maboko ya Salomo.


Bato ya Yuda balobaki na Samison : — Toyei mpo na kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko ya bato ya Filisitia. Samison alobaki na bango : — Bolapa ndayi liboso na ngai ete bokoboma ngai te bino moko.


Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ