Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 2:24 - Mokanda na Bomoi

24 Mpe sik’oyo, na Kombo na Yawe oyo alendisi ngai na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ngai, mpe oyo asali ete bokonzi ezala na libota na ngai ndenge alapaki yango na ndayi, Adoniya akokufa kaka lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 2:24
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo.


Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, olakisaki na mosali na Yo makambo oyo na koloba : ‹ Nakosala ete bokonzi ewumela na libota na yo. › Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo na maloba oyo.


Mokonzi alapaki ndayi na maloba oyo : — Na Kombo na Yawe oyo akangolaki ngai na mikakatano nyonso,


Mpe lisusu, Salomo avandi na kiti ya bokonzi ;


Salomo azongisaki : — Soki kaka atamboli na sembo, suki ata moko te ya moto na ye ekokweya na mabele ; kasi soki mabe emonani kati na ye, akokufa.


Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti ya bokonzi ya Isalaele ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. »


mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakotia lisusu banguna na yo na se ya bokonzi na yo. Boye, nazali koyebisa yo ete Yawe akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo.


Mpe lokola nde ekokaki te na miso na Yo, Nzambe na ngai, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo ! Oh Yawe Nzambe, ozali kozwa ngai lokola moto ya lokumu !


Bongo sik’oyo, oh Yawe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe libota na ye ekokisama mpo na libela ! Sala ndenge olakaki.


Ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai. Akozala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala Tata mpo na ye, nakolendisa kiti na ye ya bokonzi kati na Isalaele mpo na libela. ›


Salomo avandaki na Kiti ya Bokonzi ya Yawe lokola mokonzi na esika ya Davidi, tata na ye. Apambolamaki mpe Isalaele mobimba etosaki ye.


Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.


Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango.


Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi ; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.


Nabondeli yo, limbisa mabe ya mwasi mosali na yo. Yawe akosala penza ete libota ya nkolo na ngai ewumela tango nyonso na bokonzi, pamba te obundaka bitumba ya Yawe. Tika ete, tango nyonso okozala na bomoi, mabe ata moko te emonana kati na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ