Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.
Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.
Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.
Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa.