Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 2:15 - Mokanda na Bomoi

15 Adoniya alobaki : — Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai ; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 2:15
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Davidi abondisaki mwasi na ye, Batisheba ; akendeki epai na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Batisheba abotelaki ye lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Salomo. » Yawe alingaki ye


Ntoma moko ayaki koyebisa Davidi : — Mitema ya bato ya Isalaele esangani elongo na Abisalomi.


Azalaki kosala bongo epai ya bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende epai ya mokonzi mpo ete akata likambo na bango, mpe ezalaki bongo nde Abisalomi azalaki komikotisa na mayele kati na mitema ya bato ya Isalaele.


Ushayi alobaki na Abisalomi : — Te, ngai nakozala elongo na moto oyo Yawe, bato oyo mpe Isalaele nyonso baponi.


ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ; ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye ;


ya minei, Adoniya oyo Agite abotelaki ye ; ya mitano, Shefatia oyo Abitali abotelaki ye ;


Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye.


Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme ; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari ; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba : « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi ! »


Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni.


Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye : « Ngai nde nakozala mokonzi ! » Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda ; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli.


Abakisaki : — Nazali na likambo moko ya koyebisa yo. Batisheba azongisaki : — Okoki koloba yango.


Sik’oyo, nazali na bosenga moko, kopimela ngai yango te. Batisheba alobaki : — Okoki koloba yango.


Mokonzi Salomo azongiselaki mama na ye : — Mpo na nini ozali kosenga Abishagi, moto ya Sunami, mpo na Adoniya ? Okokaki mpe kosenga bokonzi mpo na ye, mpo ete azali yaya na ngai ; ndenge moko mpe mpo na Nganga-Nzambe Abiatari, mpo na Joabi, mwana mobali ya Tseruya !


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


Alakisaka makambo ya bozindo mpe ebombama, ayebaka makambo oyo esalemaka na molili, mpe pole ezali kati na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ