Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 2:12 - Mokanda na Bomoi

12 Salomo avandaki na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ye, mpe bokonzi na ye elendisamaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 2:12
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, tika ete opambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo ; pamba te oh Nkolo Yawe, Yo nde olobaki, mpe na nzela ya lipamboli na Yo, libota ya mosali na Yo ekopambolama mpo na libela. »


Kota epai ya mokonzi Davidi mpe loba na ye : « Mokonzi, nkolo na ngai, olapaki ndayi te liboso na ngai mwasi mowumbu na yo : ‹ Solo, Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi ? › Boye mpo na nini Adoniya akomi mokonzi ? »


nakokokisa solo, na mokolo ya lelo, ndayi oyo nalapaki epai na yo na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi.


Sima, bokozonga elongo na ye, mpe akoya kovanda na kiti na ngai ya bokonzi. Ye nde akokoma mokonzi na esika na ngai. Nakomisi ye mokonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.


Mpe lisusu, Salomo avandi na kiti ya bokonzi ;


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Benaya abimaki, abetaki Shimei, mpe Shimei akufaki. Bokonzi elendisamaki na maboko ya Salomo.


Tango Davidi akomaki mobange makasi, akomisaki Salomo, mwana na ye ya mobali, mokonzi ya Isalaele.


Salomo, mwana mobali ya Davidi, alendisamaki makasi na bokonzi na ye, pamba te Yawe, Nzambe na ye, azalaki elongo na ye mpe akomisaki ye moto monene penza.


Soki bana na yo babateli boyokani mpe mibeko na ngai, bana na bango mpe bakokitana na yo lokola bakonzi, mpe ekosalema bongo mpo na libela. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ