Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi mpe abengaki yango « Engumba ya Davidi. » Mpe Davidi atongaki zingazinga na yango, longwa na Milo kino na kati.
Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye.
Wana Adadi azalaki na Ejipito, ayokaki ete Davidi mpe Joabi, mokonzi ya mampinga, bakufi. Boye, Adadi alobaki na Faraon : — Pesa ngai nzela ete nazonga na mokili na ngai.
Sima na yango, Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.
Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. Abiyami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Asa akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Jozafati, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Salomo asalaki boyokani elongo na Faraon, mokonzi ya Ejipito ; abalaki mwana mwasi ya Faraon mpe amemaki ye na engumba ya Davidi, kino tango asilisaki kotonga ndako na ye ya bokonzi, Tempelo ya Yawe mpe bamir, zingazinga ya Yelusalemi.
Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota ya bato ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.
Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Yorami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Bongo Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi.