8 Boye alamukaki, aliaki mpe amelaki. Bongo na makasi oyo azwaki na nzela ya bilei, atambolaki mobembo ya mikolo tuku minei mpe ya babutu tuku minei kino akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.
Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.
Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.
Bongo nakweyaki mbala moko liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, naliaki lipa te mpe namelaki mayi te mpo na lisumu monene oyo bosalaki wana bosalaki mabe na miso ya Yawe mpe, na bongo, bopesaki Ye kanda.