6 Atalaki mpe amonaki pene ya esika oyo atiaki moto, lipa batumba na mabanga ya moto mpe mbeki ya mayi. Aliaki, amelaki mpe alalaki lisusu.
Kuna, okomela mayi ya lubwaku, mpe napesi mitindo epai ya bayanganga mpo ete eleisa yo.
Bayanganga ezalaki komemela ye mapa mpe mbisi na tongo mpe na pokwa, mpe amelaki mayi ya lubwaku.
Bongo alalaki na se ya nzete yango mpe azwaki pongi. Mbala moko, anjelu moko asimbaki ye mpe alobaki na ye : — Lamuka mpe lia.
Anjelu ya Yawe azongaki na mbala ya mibale, asimbaki ye lisusu mpe alobaki : — Lamuka mpe lia, pamba te mobembo ezali molayi mingi mpo na yo.
Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia.
Moto wana akovanda na likolo : mabanga ya makasi ekozala ekimelo na ye. Akozanga te lipa ya kolia mpe mayi ya komela.
mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu.
Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei.
Biloko wana nyonso, ezali bapagano nde balukaka-lukaka yango ; kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.
Yesu abengaki bango : — Bana na Ngai ! Boni, bozali na mbisi te ? Bazongisaki : — Te !
Tango bakitaki na mabele, bamonaki mapa mpe moto ya makala oyo na likolo na yango ezalaki na bambisi.