Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu.
Bongo, alobaki na ngai : — Nakoyebisa yo makambo oyo ekosalema na sima na tango ya kanda ya Nzambe, pamba te emoniseli oyo etali tango oyo ekatama mpo na mikolo ya suka.
wana nazalaki nanu koloba, kati na losambo, Gabrieli, moto oyo namonaki liboso kati na emoniseli, ayaki epai na ngai na lombangu, na tango ya makabo ya pokwa.
Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye ; alobaki na ye : — Telema noki ! Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo.
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »