Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 19:21 - Mokanda na Bomoi

21 Boye Elize atikaki ye mpe azongaki. Azwaki bangombe na ye mibale oyo bakangisa, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka. Asalelaki bikangiseli ya bangombe mpo na kolamba mosuni na yango, akabolaki yango epai ya bato na ye mpe baliaki yango. Boye, atelemaki mpo na kolanda Eliya mpe akomaki kosalela ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 19:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Orina azongiselaki Davidi : — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, akamata na ye lopango yango mpe abonza kuna mbeka oyo amoni ete ezali malamu mpo na Yawe. Tala bangombe ya mibali oyo ekosunga mpo na mbeka ya kotumba, mabaya ya bashario mpe bikangiseli oyo ekosunga mpo na kopelisa moto.


Alobaki na mosali na ye : — Kende kotala na nzela ya ebale monene. Mosali na ye akendeki kotala, alobaki : — Eloko moko te ezali kuna. Eliya atindaki ye mbala sambo na maloba oyo : « Kende kotala lisusu ! »


Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? Elize azongisaki : — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye !


Kasi Jozafati atunaki : — Awa, ezali te na mosakoli ya Yawe mpo ete totuna toli ya Yawe na nzela na ye ? Mokonzi moko ya mampinga ya mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Elize, mwana mobali ya Shafati, azali awa. Azalaki kosopa mayi na maboko ya Eliya.


Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe.


Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba na Nzambe kati na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango lokola mosungi.


Kaka Luka nde azali elongo na ngai. Kamata Malako, mpe boya elongo na ye, pamba te azali na tina mingi epai na ngai mpo na lotomo.


Nalingaki ete atikala elongo na ngai awa, na boloko epai wapi nazali mpo na Sango Malamu, mpo ete asalisa ngai na esika na yo.


Shario ekomaki na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi, mpe etelemaki wana, pembeni ya libanga monene. Bato babukaki mabaya ya sanduku mpe babonzaki bangombe ya basi lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ