Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 19:2 - Mokanda na Bomoi

2 Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 19:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi ?


Tika ete Nzambe apesa ngai Abineri etumbu ya makasi soki nasali te mpo na Davidi makambo oyo Yawe alakaki ye, na nzela ya ndayi,


Bongo, mokonzi Salomo alapaki ndayi na Kombo na Yawe : — Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki Adoniya akufi te mpo na bosenga oyo !


Tango sango ekomaki epai ya Joabi, ye oyo abundelaki Adoniya kasi Abisalomi te, akimaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe asimbaki maseke ya etumbelo.


Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.


Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Ngai, Mosantu ya Isalaele !


Mokonzi alobaki : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki kaka moto ya Elize, mwana mobali ya Shafati, etikali na likolo ya mapeka na ye. »


Faraon alobaki na Moyize : — Longwa liboso na ngai mpe keba na yo ! Koya lisusu liboso na ngai te ! Mokolo oyo okoya lisusu liboso na ngai, okokufa.


Monguna amilobelaki : « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola ; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »


Komikumisa te mpo na mokolo ya lobi, pamba te oyebi te likambo nini mokolo ekoki kobota.


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


Tango mokonzi Yeoyakimi elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bakambi bayokaki maloba ya Iri, balukaki koboma ye. Kasi tango Iri ayokaki yango, abangaki makasi mpe akimaki na Ejipito.


Sik’oyo, bomibongisa ! Tango kaka bokoyoka lolaka ya kelelo, ya flite, ya lindanda ya moke, ya lindanda, ya nzenze, ya fanfari mpe makelele ya nyonso ya bibetelo mindule, bokofukama mpo na kogumbamela ekeko oyo nasali. Soki boboyi kogumbamela yango, bokobwakama mbala moko kati na libulu ya moto. Boye, tokotala soki nzambe nini akokoka kokangola bino na maboko na ngai.


Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ