Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 19:19 - Mokanda na Bomoi

19 Eliya alongwaki wana mpe akutanaki na Elize, mwana mobali ya Shafati. Azalaki kobalola bilanga na bangombe tuku mibale na minei bakangisa mibale-mibale liboso na ye mpe ye moko azalaki kotambolisa bangombe mibale ya suka. Eliya apusanaki pembeni ya Elize mpe abwakelaki Elize kazaka na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 19:19
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango kaka Eliya ayokaki yango, azipaki elongi na ye na songe ya kazaka na ye, abimaki mpe atelemaki na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mpe mongongo moko elobaki na ye lisusu : — Eliya, ozali kosala nini awa ?


Okopakola lisusu Jewu, mwana mobali ya Nimishi, mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Okopakola lisusu Elize, mwana mobali ya Shafati ya Abele-Meola, mafuta mpo ete akoma mosakoli na esika na yo.


Eliya alongolaki kazaka na ye, agumbaki yango mpe abetaki yango na mayi ya ebale. Mayi ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe bango mibale bakatisaki.


Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.


Amosi azongiselaki Amatsia : — Nazalaki mosakoli te to mwana ya mosakoli te, kasi nazalaki nde mobateli bibwele mpe moloni ya basikomori.


Kasi Yawe alongolaki ngai na mosala ya kobatela bibwele mpe alobaki na ngai : « Kende kosakola epai ya bato na Ngai, Isalaele. »


Akoloba : ‹ Nazali na ngai mosakoli te ; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai ! ›


bamosusu babomaki bango na mabanga, bakataki bango na biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bakomaki na bomoi ya koyengayenga mpe bakomaki kolata baposo ya bameme mpe ya bantaba ; bakelelaki na nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisaki bango pasi :


Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani.


Kaka na tango yango, Saulo awutaki na bilanga, sima na bangombe na ye. Atunaki : « Likambo nini ya mabe ekweyeli bato mpo ete balela boye ? » Bayebisaki ye makambo nyonso oyo bato ya Yabeshi balobaki.


Saulo atunaki ye : — Azali ndenge nini ? Mwasi azongisaki : — Ezali mobange mobali moko nde azali komata mpe alati kazaka. Bongo tango Saulo asosolaki ete ezali Samuele, akitaki mpe agumbamaki elongi kino na mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ