Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 19:16 - Mokanda na Bomoi

16 Okopakola lisusu Jewu, mwana mobali ya Nimishi, mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Okopakola lisusu Elize, mwana mobali ya Shafati ya Abele-Meola, mafuta mpo ete akoma mosakoli na esika na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 19:16
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mokonzi akangaki Arimoni mpe Mefibosheti, bana mibali oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, abotelaki Saulo ; akangaki lisusu bana mibali mitano oyo Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotelaki Adriyeli, mwana mobali ya Barizilayi, moto ya Meola ;


Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Baana, mwana mobali ya Ayiludi : moyangeli ya Taanaki, Megido mpe Beti-Sheani mobimba, pembeni ya Tsaritani, na se ya Jizireyeli, wuta na Beti-Sheani, na Abele-Meola mpe koleka Yokimeami ;


Tango Yawe akomaki pene ya konetola Eliya na likolo na nzela ya mopepe makasi, Eliya mpe Elize balongwaki na Giligali.


Bayekoli ya basakoli, oyo bawutaki na Jeriko bamonaki mpe balobaki : « Molimo ya Eliya evandi sik’oyo likolo ya Elize ! » Bakendeki kokutana na ye mpe bagumbamaki liboso na ye kino na mabele.


Tango bakatisaki, Eliya alobaki na Elize : — Yebisa ngai nasala nini mpo na yo liboso ete Yawe alongola ngai liboso na yo. Elize azongisaki : — Tika ete nazwa nguya ya molimo na yo mbala mibale.


Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »


Tango bakelelo nkama misato ebetaki lisusu, Yawe asalaki ete, kati na molako mobimba, moto na moto atuba moninga na ye mopanga ; mpe bango nyonso bakimaki kino na Beti-Shita, na ngambo ya Tserera, mpe kino na ngambo ya Abele-Meola pembeni ya Tabati.


Boye, tango ngonga ya kobalisa Merabi, mwana mwasi ya Saulo, epai ya Davidi ekokaki, Saulo abalisaki ye epai ya Adriyeli, moto ya Meola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ