15 Yawe alobaki na ye : — Zonga na nzela oyo oyelaki mpe kende na esobe ya Damasi. Tango okokoma kuna, okopakola Azaeli mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Siri.
Akazia akendeki elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Bato ya Arami bazokisaki Yorami.
Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri.
« Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, mpo na kofungola bikuke liboso na ye mpo ete bikuke yango ekangama te :
Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.