Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 19:12 - Mokanda na Bomoi

12 Sima na mopepe makasi, mabele eninganaki ; nzokande Yawe azalaki te kati na koningana ya mabele. Sima na koningana ya mabele, moto eyaki ; nzokande Yawe azalaki te kati na moto wana. Mpe sima na moto, mopepe ya kimia penza eyaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 19:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama.


Bongo moto ya Yawe ekweyaki, ezikisaki mbeka, bakoni, mabanga mpe ekawusaki mayi nyonso kati na libulu.


Kasi Eliya azongiselaki mokonzi yango ya basoda : — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo mpe bato na yo tuku mitano. Bongo moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi yango ya basoda elongo na basoda na ye tuku mitano.


Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale ; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi.


Boye, somo na ngai ebangisa yo te, mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te.


Molimo yango etelemaki wana, kasi nalongaki te kososola soki ezali nini ; elilingi yango etelemaki liboso ya miso na ngai, mpe nayokaki mongongo moko koloba na se penza :


Kuna, Anjelu ya Yawe abimelaki ye kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete. Moyize amonaki nzete moke yango kopela moto, kasi ezalaki kozika te.


Yawe alekaki liboso ya Moyize, mpe Moyize atatolaki : — Yawe, Yawe, Nzambe na mawa mpe na ngolu, Nzambe oyo asilikaka noki te, atondi na bolingo mpe na boboto,


Alobaki na ngai : — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana.


Bongo, bomisenzela malamu, pamba te bomonaki nzoto te na mokolo oyo Yawe alobelaki bino na ngomba Orebi wuta na moto.


Boni, ezali na bato bayoka mongongo ya Nzambe kolobela bango kati na moto ndenge bino boyokaki mpe botikali na bomoi ?


Pamba te Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ