Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 19:11 - Mokanda na Bomoi

11 Yawe alobaki : — Bima mpe telema na ngomba liboso ya Yawe, pamba te Yawe alingi koleka. Boye mopepe moko ya makasi penza epepaki, ebukaki bangomba mpe epanzaki mabanga liboso ya Yawe. Nzokande Yawe azalaki kati na mopepe makasi te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 19:11
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi :


Tika ete Nzambe na biso aya ! Tika ete akanga monoko te ! Liboso na Ye, moto makasi ezali kozikisa ; mpe zingazinga na Ye, mopepe makasi ezali kopepa.


Oh Nzambe, tango obimaki liboso ya bato na Yo, tango otambolaki na esobe,


mabele eninganaki, likolo mpe esopaki mayi liboso ya Nzambe, Nzambe ya Sinai ; liboso ya Nzambe, Nzambe ya Isalaele.


Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba ; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki.


Yawe akitaki na likolo ya ngomba Sinai mpe abengaki Moyize mpo ete amata na songe ya ngomba yango. Boye Moyize amataki.


Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika


Yawe alobaki na Moyize : « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. »


Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, akotaki kati na mapata. Awumelaki kuna mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei.


Omilengela mpo na lobi na tongo. Na tongo-tongo, okomata na ngomba Sinai mpe okotelema liboso na Ngai, kuna na songe ya ngomba.


Yawe alekaki liboso ya Moyize, mpe Moyize atatolaki : — Yawe, Yawe, Nzambe na mawa mpe na ngolu, Nzambe oyo asilikaka noki te, atondi na bolingo mpe na boboto,


Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.


Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor ; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto.


Boye, nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai. Bongo wana nazalaki nanu kosakola, makelele moko ya makasi eyokanaki ; mpe, mbala moko, mikuwa yango ekomaki koningana mpe kosangana moko na moko na mosusu.


Yawe asilikaka noki te, mpe nguya na Ye ezali monene. Yawe atikaka te moto oyo asali mabe lokola nde asali na ye mabe te, kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe. Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki, kati na mopepe makasi.


Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali ; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso.


Alobaki na ngai : — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, nzala ekozala makasi penza, mpe mabele ekoningana bipai na bipai.


Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango.


Ye oyo mongongo na Ye eningisaki mokili na tango ya kala apesi lelo elaka oyo : « Na mbala oyo lisusu, nakoningisa kaka mabele te, kasi nakoningisa mpe Likolo. »


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


Bongo mikalikali engengaki, mingongo eyokanaki, bakake ebetaki, mpe mabele eninganaki makasi ; likambo ya somo boye etikala nanu kosalema te wuta moto azali na mokili.


Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.


Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso : ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ