Akabi apesaki mitindo na Abidiasi : « Tambola kati na mokili mobimba, na bitima nyonso ya mayi mpe na miluka nyonso ; tango mosusu tokoki kozwa matiti ya mobesu mpe tokobatela bomoi ya bampunda mpe ya bamile mpo ete toboma lisusu te ndambo ya bibwele na biso. »
Wana Abidiasi azalaki kokende, Eliya akutanaki na ye. Abidiasi asosolaki ete ezali ye, afukamaki elongi kino na se mpe alobaki : — Boni, ezali penza yo, Eliya, nkolo na ngai ?
Bakambi bazali kotinda basali na bango mpo ete bakende kotoka mayi ; kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te, bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba, bazipi bilongi na soni mpe na mawa.