Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 18:44 - Mokanda na Bomoi

44 Na mbala ya sambo, mosali na ye alobaki : — Tala, lipata moko ya moke lokola loboko ya moto ezali kobima wuta na ebale monene. Boye Eliya alobaki : — Kende koyebisa Akabi : « Bongisa shar na yo noki mpe zonga na ndako na yo, noki te mvula ekokanga yo na nzela. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 18:44
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alobaki na mosali na ye : — Kende kotala na nzela ya ebale monene. Mosali na ye akendeki kotala, alobaki : — Eloko moko te ezali kuna. Eliya atindaki ye mbala sambo na maloba oyo : « Kende kotala lisusu ! »


Bozwi na yo ya kala ekomonana moke, pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka.


Bino bavandi ya engumba Lakishi, bokangisa bampunda mpe bashar na bino ! Bino nde bomemisaki Siona, mboka kitoko, masumu ; pamba te bamonaki masumu ya Isalaele kati na bino !


Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.


Bongo alobaki lisusu na ebele ya bato : — Tango bomonaka mapata kobima na weste, bolobaka mbala moko : « Mvula elingi konoka, » mpe ekokisamaka bongo.


Bato ya Filisitia basalaki ndenge bayebisaki bango : bazwaki bangombe mibale ya basi oyo ezalaki komelisa mpe bakangisaki yango na shario. Kasi bazongisaki bana na yango na lopango.


Boye bino, bosala sik’oyo shario moko ya sika ; bozwa bangombe mibale ya basi oyo ezali komelisa mpe oyo nanu balatisi te ekangiseli na kingo. Bokangisa bangombe yango na shario, kasi bozongisa bana na yango na lopango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ