Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 18:43 - Mokanda na Bomoi

43 Alobaki na mosali na ye : — Kende kotala na nzela ya ebale monene. Mosali na ye akendeki kotala, alobaki : — Eloko moko te ezali kuna. Eliya atindaki ye mbala sambo na maloba oyo : « Kende kotala lisusu ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 18:43
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana moto yango amonaki ete akoki kolonga Jakobi te, abetaki Jakobi na loketo mpe mokuwa ya loketo na ye ebukanaki tango bazalaki kobunda.


Boye, Akabi akendeki kolia mpe komela. Kasi Eliya amataki kino na songe ya ngomba Karimeli, afukamaki elongi kino na se, na kati-kati ya mabolongo.


Na mbala ya sambo, mosali na ye alobaki : — Tala, lipata moko ya moke lokola loboko ya moto ezali kobima wuta na ebale monene. Boye Eliya alobaki : — Kende koyebisa Akabi : « Bongisa shar na yo noki mpe zonga na ndako na yo, noki te mvula ekokanga yo na nzela. »


Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre ; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso.


Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai, yoka koganga na ngai wana nazali kosenga lisungi, pamba te nazali kobondela nde Yo.


Emoniseli oyo ezali kaka kozela tango na yango oyo ekatama ; ezali kolobela makambo oyo ekosalema na tango ya suka ; solo, ekokosa te. Ata ewumeli, zela yango kaka ; solo, ekokokisama, ekowumela te.


Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.


Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ?


Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso.


Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ