1 Bakonzi 18:4 - Mokanda na Bomoi4 Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba : « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto ? Bosala keba ! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima ! Boyoka ! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye ? »