Boye bokobelela kombo ya nzambe na bino, bongo ngai mpe nakobelela Kombo ya Yawe. Nzambe oyo akoyanola na nzela ya moto, Ye nde Nzambe ya solo. Boye bato nyonso bazongisaki : — Makambo oyo olobi ezali malamu.
Kasi Eliya azongiselaki mokonzi ya basoda : — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo elongo na bato na yo tuku mitano. Mbala moko moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye.
Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.
Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo ; mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, » elobi Yawe oyo moto na Ye ezali kati na Siona mpe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi.
Bana mibali ya Aron, Nadabi mpe Abiyu, bazwaki moko na moko mbabola na ye ; batiaki yango makala ya moto mpe batiaki ansa na likolo ya makala yango. Lokola bakokisaki te kolanda oyo basengelaki kosala, bamemaki moto ya mopaya liboso ya Yawe.
Moto ebimaki liboso ya Yawe mpe ezikisaki na etumbelo, mbeka ya kotumba mpe biteni ya mafuta. Mpe tango bamonaki bongo, bagangaki na esengo mpe bakweyaki bilongi na bango kino na se.
Bongo Anjelu ya Yawe asembolaki nzete oyo asimbaki na loboko na Ye, mpe songe na yango etutaki nyama mpe mapa oyo ezanga levire. Moto ebimaki wuta na libanga mpe ezikisaki nyama mpe mapa. Anjelu ya Yawe alimwaki na miso na ye.