Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 18:31 - Mokanda na Bomoi

31 Eliya akamataki mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya bana mibali ya Jakobi oyo Yawe alobaki na ye : « Kombo na yo ekozala Isalaele. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 18:31
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto yango atunaki Jakobi : — Kombo na yo nani ? Jakobi azongisaki : — Kombo na ngai ezali Jakobi.


Moto yango alobaki lisusu : — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi.


Atongaki kuna etumbelo moko oyo abengaki : « El, Nzambe ya Isalaele. »


Nzambe alobaki na ye : « Kombo na yo ezali Jakobi ; kasi okobengama lisusu Jakobi te, kombo na yo ekomi Isalaele. » Yango wana Nzambe apesaki ye kombo « Isalaele. »


Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala ; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. »


Babonzaki bangombe ya mibali nkama moko, bameme ya mibali nkama mibale, bana meme nkama minei mpo na libulisi ya Ndako ya Nzambe ; mpe bantaba ya mibali zomi na mibale, moko mpo na ekolo moko na moko ya Isalaele, lokola mbeka mpo na masumu ya Isalaele mobimba.


Moyize akomaki maloba nyonso oyo Yawe ayebisaki ye. Mokolo oyo elandaki, alamukaki na tongo makasi mpe atongaki etumbelo na ebandeli ya ngomba. Bongo, atelemisaki mabanga zomi na mibale oyo ezali kotalisa mabota zomi na mibale ya Isalaele.


Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !


« Na tango wana, » elobi Yawe, « Ngai nakozala Nzambe ya bituka nyonso ya Isalaele, mpe bango bakozala bato na Ngai. »


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele : bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale.


Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.


Jozue atelemisaki, na Giligali, mabanga zomi na mibale oyo babimisaki na Yordani.


Engumba yango ezalaki na mir moko ya molayi mpe emata na bosanda, mpe ezalaki na bikuke zomi na mibale, mpe na ba-anjelu zomi na mibale na bikuke yango. Bakombo ya mabota zomi na mibale ya Isalaele ezalaki ya kokomama na bikuke yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ