Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 18:26 - Mokanda na Bomoi

26 Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki : « Bala, yanola biso ! » Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 18:26
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye bokobelela kombo ya nzambe na bino, bongo ngai mpe nakobelela Kombo ya Yawe. Nzambe oyo akoyanola na nzela ya moto, Ye nde Nzambe ya solo. Boye bato nyonso bazongisaki : — Makambo oyo olobi ezali malamu.


Eliya alobaki na basakoli ya Bala : — Bopona ngombe moko kati na bangombe ya mibali ; bino bozala bato ya liboso ya kobongisa yango, pamba te bozali ebele. Bobelela kombo ya nzambe na bino, kasi bopelisa moto te.


Na midi, Eliya akomaki kotiola bango, alobaki : « Boganga lisusu makasi, pamba te azali nzambe ; tango mosusu azali kokanisa makambo ebele to akangami na misala mosusu to azali na mobembo ; to mpe azali kolala, boye esengeli bino kolamusa ye. »


Kasi tango bato ya maji bamekaki kobimisa bangungi na nzela ya misala na bango ya soloka, balongaki te. Bongo bangungi ematelaki bato mpe banyama.


Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo, mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi.


Mpe na ndambo oyo etikali, oyo asalaki na yango nzambe, nzambe na ye ya ekeko, akofukamela yango mpe akosambela yango ; akosambela yango mpe akoloba : « Bikisa ngai, ozali nzambe na ngai ! »


Bosangana elongo mpe boya, bopusana elongo bino nyonso, bino bato oyo bobiki kati na bikolo ! Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te ; bazangi boyebi.


Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango, batelemisaka yango na esika na yango mpe etikalaka ya kotelema kaka wana. Wuta na esika na yango, ekoningana te. Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te, ekobikisa ye te na tango ya pasi.


Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko oyo batiaka na elanga ya bapasiteki mpo na kokimisa bandeke : elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te. Kobanga yango te, pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. »


Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.


Bato oyo basalaka na masuwa bakomaki kobanga, mpe moto na moto akomaki kobelela nzambe na ye ; babwakaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango na ebale monene mpo na kokomisa masuwa pepele. Kasi Yona akitaki na kobe ya masuwa mpe, kuna, alalaki pongi ya makasi.


Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango ? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini ? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.


Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete : « Telema ! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi : « Lamuka ! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela ? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango.


Na mokolo wana, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo, bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko na makambo ya kanza mpe na lokuta.


Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.


Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.


Boye, na tina na likambo ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka se moko.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato ya Asidodi balamukaki mpe bamonaki Dagoni, nzambe na bango, akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe. Bazwaki mpe batelemisaki Dagoni, mpe bazongisaki ye na esika na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ