1 Bakonzi 18:24 - Mokanda na Bomoi24 Boye bokobelela kombo ya nzambe na bino, bongo ngai mpe nakobelela Kombo ya Yawe. Nzambe oyo akoyanola na nzela ya moto, Ye nde Nzambe ya solo. Boye bato nyonso bazongisaki : — Makambo oyo olobi ezali malamu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi atunaki : — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso ? Mwasi azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo.