Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 18:22 - Mokanda na Bomoi

22 Boye Eliya alobaki na bango : — Natikali kaka ngai moko mosakoli kati na basakoli na Yawe. Kasi Bala azali na basakoli tuku minei na mitano.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 18:22
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bobongisela biso bangombe mibale ya mibali. Tika ete basakoli ya Bala bapona bango moko ngombe moko, bakata-kata yango na biteni mpe batia yango likolo ya bakoni, kasi bapelisa moto te. Ngai mpe nakobongisa ngombe mosusu, nakotia yango likolo ya bakoni, kasi na kopelisa moto te.


Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.


Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele, babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.


Na tango wana kaka, mosakoli moko ayaki epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpe alobaki na ye : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ozali komona mampinga monene oyo ? Nakopesa yango lelo na maboko na yo, bongo okoyeba ete nazali Yawe. »


Boye balataki bango nyonso bilamba ya saki, bakangaki basinga na mito na bango mpe bakendeki epai ya mokonzi ya Isalaele. Balobaki na ye : — Mosali na yo Beni-Adadi abondeli yo ete oboma ye te. Akabi atunaki : — Boni, azali nanu na bomoi ? Azali kaka ndeko na ngai.


Na tango wana, moko kati na bana ya basakoli alobaki na moninga na ye, na etinda ya Yawe : — Nasengi na yo ete obeta ngai. Kasi moninga na ye aboyaki kobeta ye.


Mwana ya basakoli amibongolaki na elateli na ye, azipaki elongi na ye na nzela ya eteni ya elamba mpo ete bayeba ye te, mpe akendeki kotelema na nzela oyo mokonzi Akabi akolekela.


— Nkolo, babomi basakoli na Yo mpe babuki bitumbelo na Yo. Mpe ngai, natikali kaka ngai moko, mpe bazali lisusu koluka koboma ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ