1 Bakonzi 18:21 - Mokanda na Bomoi21 Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki : — Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela ? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye ! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye. Bato bazongisaki ata eloko moko te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yuda azongisaki : — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai ? Tokoloba lisusu nini ? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te ? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye.
Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite ; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. »