Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 18:19 - Mokanda na Bomoi

19 Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 18:19
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi ; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron.


Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera ; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Boye Akabi atindaki sango epai ya bato nyonso ya Isalaele mpe asangisaki basakoli na ngomba Karimeli.


Boye Eliya alobaki na bango : — Natikali kaka ngai moko mosakoli kati na basakoli na Yawe. Kasi Bala azali na basakoli tuku minei na mitano.


Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango : — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Bazongiselaki ye : — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.


Sik’oyo, bobengisa basakoli nyonso ya Bala, basambeli na ye nyonso mpe banganga-nzambe na ye nyonso. Bosala ete moto moko te azanga, pamba te nakobonza mbeka ya monene mpo na Bala. Moto nyonso oyo akozanga, akokufa. » Jewu asalelaki mayele mabe mpo na koboma basambeli ya Bala.


Kasi batikaki te masumu ya libota ya Jeroboami oyo akweyisaki na yango Isalaele. Bakobaki kaka na yango ; mpe ekeko ya nzambe mwasi Ashera etikalaki kaka ya kotelema kati na Samari.


Longwa wana Elize akendeki na ngomba Karimeli ; mpe longwa kuna, azongaki na Samari.


Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Ngai na yo likambo nini ? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo. Mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Te ! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi !


Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye : — Boni Jewu, oyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ?


Na mesa na ngai, bato nkama moko na tuku mitano, Bayuda mpe bakalaka, bazalaki kolia elongo na bato oyo bazalaki koya epai na biso wuta na bikolo ya bapaya ya zingazinga.


Moto na yo ezali lokola ngomba Karimeli, mpe suki ya moto na yo ezali lokola elamba ya motane ; mokonzi akangami na mazita na yango.


« Namoni makambo ya nkele kati na basakoli ya Samari : bazali kosakola na kombo ya nzambe Bala mpe bazali kobungisa Isalaele, bato na Ngai, nzela.


Lokola Ngai nazali na bomoi, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba, lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene, azali koya !


Alobaki : Yawe azali koganga wuta na Siona, mpe azali koloba wuta na Yelusalemi, na mongongo makasi lokola kake. Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele baleisaka bibwele ekokawuka, mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.


Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli, nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se ; soki babombami Ngai na se ya ebale monene, nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.


Alameleki, Ameadi mpe Misheali. Mondelo na yango etutanaki na Karimeli mpe Shiyori-Libinati na ngambo ya weste ;


Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino ; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata.


Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.


Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.


Na tongo-tongo, Samuele atelemaki mpo na kokende kokutana na Saulo. Kasi bayebisaki ye : « Saulo akei na Karimeli, atongi kuna ekeko mpo na ye moko, bongo alongwe kuna mpe akei kino na Giligali. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ