Boye alamukaki, aliaki mpe amelaki. Bongo na makasi oyo azwaki na nzela ya bilei, atambolaki mobembo ya mikolo tuku minei mpe ya babutu tuku minei kino akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.
Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.
Kasi na mokolo ya lelo, nazali kokangola yo na minyololo oyo bakangaki yo na maboko. Soki olingi, yaka elongo na ngai na mokili ya Babiloni mpe nakobatela yo ; kasi soki mpe oboyi, koya te. Tala, mokili mobimba ezali liboso na yo ; kende esika nyonso olingi.
Samison alobaki na bango : — Kati na oyo eliaka, ebimi oyo baliaka ; kati na oyo ezali makasi, ebimi oyo ezali elengi. Mikolo misato mobimba, bakokaki te kopesa ye eyano.