Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 17:23 - Mokanda na Bomoi

23 Eliya azwaki mwana mpe akitisaki ye wuta na shambre ya likolo kino kati na ndako. Apesaki mwana epai ya mama na ye mpe alobaki : — Tala mwana na yo ya mobali, azali na bomoi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 17:23
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe ayanolaki libondeli ya Eliya mpe azongisaki pema kati na mwana mobali, bongo mwana yango azongaki lisusu na bomoi.


Mwasi yango alobaki na Eliya : — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe ; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo.


Moto oyo akufaki avandaki mpe abandaki koloba ; mpe Yesu azongisaki ye epai ya mama na ye.


Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye : — Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.


Petelo asimbaki ye na loboko na ye mpe atelemisaki ye. Bongo abengaki bandimi, mingi-mingi basi oyo bakufisa mibali, mpe alakisaki bango Dorkasi ya bomoi.


Mpo na kondima, basi bamonaki bato na bango, oyo bakufaki kozonga lisusu na bomoi. Bato mosusu bandimaki ata konyokwama mpe baboyaki ete basikola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa mpe bakozala na bomoi oyo ezali kitoko koleka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ