Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 17:20 - Mokanda na Bomoi

20 abelelaki Yawe na maloba oyo : — Oh Yawe, Nzambe na ngai, mpo na nini koyeisa lisusu pasi na bomoi ya mwasi oyo akufisa mobali, na koboma mwana na ye ya mobali ; nzokande ayambaki ngai epai na ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 17:20
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye.


Kasi Eri, mwana liboso ya Yuda, azalaki moto mabe na miso ya Yawe ; yango wana Yawe abomaki ye.


Eliya azongisaki : — Pesa ngai mwana na yo ya mobali. Eliya azwaki mwana yango na maboko ya mwasi oyo akufisa mobali, amemaki ye na shambre ya likolo epai wapi azalaka kovanda mpe alalisaki ye na mbeto na ye ;


Sima, amitandaki mbala misato likolo ya mwana mobali mpe abelelaki Yawe na maloba oyo : — Oh Yawe, Nzambe na ngai, tika ete pema ya mwana mobali oyo ezonga kati na ye.


Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele, Yo nde osala Likolo mpe mabele.


Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba nyonso ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki. Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. »


Bongo mosakoli Ezayi abelelaki Yawe, mpe Yawe azongisaki elilingi sima, na matambe zomi, kolanda ematelo ya Akazi.


Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe.


Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye, mpe Samuele kati na bato oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye, bazalaki kobelela Yawe, mpe Ye azalaki koyanola bango.


Moyize abelelaki Yawe : — Nasala nini mpo na bato oyo ? Etikali kaka moke ete babamba ngai mabanga !


Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?


Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.]


Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ