Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 17:18 - Mokanda na Bomoi

18 Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 17:18
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yuda azongisaki : — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai ? Tokoloba lisusu nini ? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te ? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye.


Tango bandeko mibali ya Jozefi bamonaki ete tata na bango asili kokufa, balobaki : « Tango mosusu Jozefi akoyina biso mpe akozongisela biso mabe nyonso oyo tosalaki ye ! »


‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › » Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki.


Kasi mokonzi alobaki : — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino ? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye : « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna : « Mpo na nini ozali kosala bongo ? »


Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki : — Boni, Shimei asengelaki te kokufa mpo na likambo oyo, pamba te alakelaki mabe mopakolami na Yawe ?


Kasi Nzambe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe :


Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.


Sima na mwa tango, mwana mobali ya mwasi oyo akufisa mobali, nkolo ndako, abelaki ; mpe pasi na ye ekomaki makasi penza kino akataki motema.


Eliya azongisaki : — Pesa ngai mwana na yo ya mobali. Eliya azwaki mwana yango na maboko ya mwasi oyo akufisa mobali, amemaki ye na shambre ya likolo epai wapi azalaka kovanda mpe alalisaki ye na mbeto na ye ;


Abidiasi atunaki : — Likambo nini ya mabe ngai nasali mpo ete okaba mosali na yo epai ya Akabi mpo ete baboma ngai ?


Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bato ya Siri bakanisi ete Ngai nazali nzambe ya bangomba, kasi ya etando te, nakokaba mampinga monene oyo na maboko na yo mpe okoyeba ete Ngai nazali Yawe. »


Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye : — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye.


Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : — Ngai na yo likambo nini ? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo. Mokonzi ya Isalaele azongisaki : — Te ! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi !


Neko atindelaki ye bamemi sango mpo na koloba na ye : — Mokonzi ya Yuda, likambo nini kati ya yo mpe ngai ? Na mokolo ya lelo, nayei na ngai te mpo na kobundisa yo ; nayei nde kobundisa mokonzi mosusu. Nzambe alobi na ngai ete nasala likambo yango na lombangu. Keba ete otombokela Nzambe oyo azali elongo na ngai, soki te akobebisa yo.


Mabe mpe masumu boni nasali liboso na Yo ? Talisa ngai mbeba mpe masumu na ngai.


Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai mpe okomisi ngai mokitani ya masumu ya bolenge na ngai.


mobali asengeli komema mwasi na ye epai ya Nganga-Nzambe mpe kopesa mpo na ye likabo ya bakilo misato ya farine ya orje ; akosopela yango mafuta te mpe akotia yango ansa te, pamba te ezali likabo oyo epesami mpo na zuwa, likabo mpo na kokanisa mbeba.


Bakomaki koganga : — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?


mpe agangaki na makasi nyonso : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !


Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela : « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi ! »


— Ah Yesu ya Nazareti, likambo nini kati na biso na Yo ? Oyei mpo na kobebisa biso ? Nayebi nani oyo Yo ozali : Mosantu ya Nzambe !


Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !


Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka : — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !


Kasi Yesu azongiselaki ye : — Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.


Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye : « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe : azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye.


Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye : — Boni, koya na yo ezali ya kimia ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ