1 Bakonzi 17:12 - Mokanda na Bomoi12 Mwasi yango azongiselaki ye : — Na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, nazali na lipa te ; nazali kaka na mwa ndambo ya farine na sani mpe ndambo ya mafuta na mbeki. Nazali kolokota mwa koni oyo nakomema na ndako mpo na kolamba bilei ya suka mpo na ngai mpe mpo na mwana na ngai ya mobali. Tango tokosilisa yango, ekotikala na biso kaka kozela kufa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.