Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 16:7 - Mokanda na Bomoi

7 Yawe alobaki lisusu na nzela ya mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha mpe ndako na ye, mpo na makambo mibale oyo : ya liboso, mpo na mabe nyonso oyo asalaki na miso ya Yawe, na kopelisa kanda ya Yawe na nzela ya misala na ye kino kokoma ndenge moko na libota ya Jeroboami ; ya mibale, mpo ete asilisaki koboma bato nyonso ya libota ya Jeroboami.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 16:7
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe akobimisa mpo na Ye moko, mokonzi mosusu ya Isalaele oyo akosilisa koboma ndako nyonso ya Jeroboami. Solo, ezali nde mpo na lelo, kaka sik’oyo !


Tango Asa, mokonzi ya Yuda, asalaki mibu tuku mibale na motoba na bokonzi ; Ela, mwana mobali ya Baesha, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale na Tiritsa.


Yawe akebisaki Isalaele mpe Yuda na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli mpe bamoni makambo, na maloba oyo : « Botika banzela na bino ya mabe, bobatela mibeko mpe bikateli na Ngai kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bino mpe bakoko na bino na nzela ya basali na Ngai, basakoli. »


Na tango wana, Anani, momoni makambo, akendeki epai ya Asa, mokonzi ya Yuda, mpe alobaki na ye : — Lokola otie elikya na yo na mokonzi ya Siri na esika ya kotia elikya na yo na Yawe, Nzambe na yo, ozali lisusu na bokonzi te likolo ya mampinga ya mokonzi ya Siri.


Kasi banzambe na bango ya bikeko ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato.


Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.


Mokili na bango etondi na banzambe ya bikeko, bato bakomi kofukamela biloko oyo esalemi na maboko na bango, oyo misapi na bango esili kosala.


Yawe alobaki na ye : — Pesa ye kombo Jizireyeli, pamba te etikali moke napesa libota ya Jewu etumbu mpo na makila ya bato oyo asopaki na Jizireyeli, mpe nakosukisa bokonzi, na libota ya Isalaele.


akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ