1 Bakonzi 16:34 - Mokanda na Bomoi34 Na tango Akabi azalaki mokonzi, Iyeli, moto ya Beteli, atongaki lisusu engumba Jeriko. Tango atongaki miboko na yango, Abirami, mwana na ye ya liboso ya mobali, akufaki ; mpe tango batiaki bikuke na yango, Segubi, mwana na ye ya mobali ya suka, akufaki. Yango esalemaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela na Jozue, mwana mobali ya Nuni. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko alakelama mabe liboso ya Yawe ! Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, tango akotonga miboko na yango ; mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, tango akotia bikuke na yango. »