Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 16:30 - Mokanda na Bomoi

30 Akabi, mwana mobali ya Omiri, asalaki makambo mabe mingi na miso ya Yawe koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 16:30
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi yo, osali mabe koleka bato nyonso oyo bazalaki liboso na yo : omisaleli banzambe mosusu, bikeko ya bibende banyangwisa na moto ; boye, olamusi kanda na Ngai mpe opesi Ngai mokongo.


Kasi Omiri asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe asalaki masumu koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye.


Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Akabi, mwana mobali ya Omiri, akomaki mokonzi ya Isalaele. Akonzaki Isalaele na engumba Samari mibu tuku mibale na mibale.


Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango.


Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera ; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe.


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; pamba te alandaki banzela ya tata na ye, ya mama na ye mpe ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki ete Isalaele asala lisumu.


Oze asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na bakonzi ya Isalaele, oyo bazalaki liboso na ye.


Asalaki mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na tata mpe mama na ye. Abukaki ekeko ya Bala oyo tata na ye atelemisaki,


Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye : — Boni Jewu, oyei mpo na kimia ? Jewu azongisaki : — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ?


kasi olandi banzela ya bakonzi ya Isalaele, mpe otindiki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi na kosambela banzambe ya bikeko ndenge libota ya Akabi esalaki ; lokola obomaki lisusu bandeko na yo ya mibali, bato ya ndako ya tata na yo, bato oyo bazalaki malamu koleka yo,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ