Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 16:29 - Mokanda na Bomoi

29 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Akabi, mwana mobali ya Omiri, akomaki mokonzi ya Isalaele. Akonzaki Isalaele na engumba Samari mibu tuku mibale na mibale.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 16:29
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na kufa ya Zimiri, bana ya Isalaele bakabwanaki na bandambo mibale : ndambo moko elandaki Tibini, mwana mobali ya Ginati lokola mokonzi ; mpe ndambo mosusu elandaki Omiri.


Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na moko, Omiri akomaki mokonzi ya Isalaele. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi, mpe kati na mibu zomi na mibale wana, akonzaki mpe engumba Tiritsa mibu motoba.


Asombaki ngomba Samari epai ya Shemeri na motuya ya palata nkoto motoba mpe atongaki engumba likolo na yango. Abengaki engumba yango Samari kolanda kombo ya Shemeri, mokolo na yango ya liboso.


Omiri, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Akabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Akabi, mwana mobali ya Omiri, asalaki makambo mabe mingi na miso ya Yawe koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye.


Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera ; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.


« Kende kokutana na Akabi, mokonzi ya Isalaele, oyo azali kokonza wuta na Samari. Na ngonga oyo, azali kati na elanga ya vino ya Naboti epai wapi akendeki mpo na kokamata yango.


Na tango wana, basoda oyo Amatsia azongisaki mpe apekisaki kokende na bitumba bakotaki na makasi kati na bingumba ya Yuda longwa na Samari kino na Beti-Oroni. Babomaki bato nkoto misato mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba.


bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari ; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe.


Tango Efrayimi azalaki koloba, bato bazalaki kolenga ; azalaki kokonza kati na Isalaele, kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala ; yango wana akufaki.


Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ