Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera ; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe.
Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.